damnlyrics.com

Choc

Faute nionso ya nga mey po na lingaki yo

Mais mon plus grand defaut nakokaka te kobimisa ce que je recens na motema Papitcho Muekatone.

Nazongi na ndako mayi ya miso eko tanga nga pona bolingo na pesaki yo ezanga reciprocité

Y'okosi nga na ba serment d'amour oyo ekomaka ata epa ya nzambe te éééééé

Y'oniokoli ya nga motema yango ko ba remplacaka te.

Na se ya mbula na ko toko ,Choc eleki makasi

Otala nga mbala mibale te pardon mitia nasika na nga,Papitcho ngo Muekatone ,i love you.

Mabe y'osala yokenda kozongela bolingo na yo ya kala

Natikeli yo tango sima mikolo ya nga pe ekokoma ya kala

Okoluk'ozongela kasi na ko limbisa yo lokola balimbisaka moto awéééééééééééé

Zalaka na mwa koyeba eh noki te okozanga nzoko pona likélélé

Po motema na nga eboya ba deception mon amour

Vie ya mwasi ezali compliqué, tango na ye mokuse, Papitcho eh Muekatone

Faute nyonso ya nga mey po nalingaki yo

Mais mon plus grand defaut nakokaka te kobimisa ce que je ressens na moyema Papitcho Muekatone eeeeeeee

Pasi oyoy nazali komona na motema na ngayi

Motema na nga ekotanga makila lokola mwana nzambe sur la croix

Lokola mpasi bana israel bamonaka na desert

Pendant 40 jours et 40 nuits

Cette souffrance si profonde, ata jesus akondima te po na bonheur ya ba christo

Faute nyonso ya nga meyi po...

Tanga kombo ya moto alingaka yo epa yozali

Fungola ya bolingo Papitcho eza na maboko ma yo

Avant osala mabe, banza cheri que nalingaka yo

Na tango yo na bisengo oyaba nga nazo souffrir pour toi

Tongo etana kala, yaka kofungola nga ata miniotte

Mowumbu ya bolingo ata imbwa na tongo bafungolaka ye singa

Na tongo ya bolingo, moto ya kala asi akoma dingue

Na ndenge ozokenda na nga kala trop te oyakokomisa nga bwange

Nzambe osala moto, opesa nga ba sentiment

Opesa nga tendresse, nzambe opesa nga maboko

Kasi moto ya ko caresser, nzambe ozanga kopesa nga

Tango omekaki nga, omonaki ngayi sukali eh

Maloba pe bizaleli na yo ezalaki ya ba angelu

Lelo olati elongi ya yuda olobi nga nakomi bololo

Na tango ozosakana pe kobima na kati ya butu

Yeba quelque part kaka na kati ya meme butu ango

Mwana moninga po na yo azo souffrir na miso ne mpongi te

---

Lyrics submitted by JONATHAN.

Enjoy the lyrics !!!