damnlyrics.com

Liloba

Motema efanda kimia

Po ete Masiyah aza ne pene na ngai

Kati ya masua na nga

Mokonzi aza na ye yako lala

Pongi e ye pongi e ye

A lali ne pongi

Kasi mopepe e tosaka ye

Mbonge e tindi nga na banga

E sengi lisingi eh

Kasi oza na yo pene pene na nga

Nakanisi mwa ndambu

Bisika nga na yo to Banda

Bitumbe o bundela nga eh

Ba ngambu o memela nga

Nkolo kokoko beta n'o na motema

O changea ba donnée ya kala

Tina nini nga na yemba nzembo oyo

Po ete liloba eh

Eza ya yo liloba ya suk'eza ya yo

Na bombi yango na moyema Oya nga

Na komi ango na motema

(Liloba suka vie na nga eh)

Eza ya yo liloba ya suk'eza ya yo

(Liloba liloba)

Na bombi yango na moyema Oya nga

Na komi ango na motema

Nkolo yo kotan'o na kati y'a motema na nga

Yo kuta matiti o pupola na nguya na yo

Nga yeyo liwa e zingaki ngai

Na sala ebale to nini

Na mayi y'a miso ezo tanga se pamba

Eza ya yo liloba suka eza ya yo

(Na bombi ango wapi)

Na bombi ango na motema oya nga

(Nakomi ango na motema)

Nakomi ango na motema

(Ebombami wapi)

Nakomi ango na motema

Nakomi ango na motema

Na kati y'a motema

Lyrics Submitted by Mila

Enjoy the lyrics !!!