damnlyrics.com

Masikini

Masikini oo papa, nga nayo libala e bouger

ki camarade ebebisi yo motema oo yuyu moke

ba sali songi songi, cherie balingi te to vanda eh papa (2x)

Nako kamwa eh papa, nde nako mituna tina eh

okimi ndako, cherie likambo nasali yo nayebi te

ba sali songi songi, cherie balingi te to vanda eh papa (2x)

Faute nayo moko, opesi bango nzoto nayo

ngai na ba soucis na ndako eh, nakomi se kokondo nzambe oo

ba bomeli nga libala oh mama, na leli miso

ba mbanda ba bendeli nga lelo na nzela, basali feti oo

Faute nayo moko, opesi bango nzoto nayo

ngai na ba soucis na ndako eh, nakomi se kokondo nzambe oo

Nako loba nini epa ya mama, soki nga nazongi mboka

to lapaki na miso ya baboti, nga nayo suka se liwa

Soni na famille na ngai, surtout epa ya maman

na kanisa bijou to boti eh, motema na ngai moto, cherie eh

Lyrics Submitted by Esther Mulamba

Enjoy the lyrics !!!