damnlyrics.com

Naomie

Batindikaka ngomba te

La référence, mabele mokonzi

Tonton, eya nga te

Yo kaka

Sopa mopanga te

Pati mobali eh

Tokobenga bâ soeur oyo ya première qualité

Oyo ya sucre

Moto quelques fois akufaka zoba

Moto il fallait akufa jeudi akufi mercredi eh

Bozoba esala ngando ezali histoire ya lelo te

Depuis la nuit des temps esalema se boye eh

Mwana oyokamela lolaka ah Nzambe eh

Kowela de la la vie ezali yauli

Ndeko otikaka komeka liwa na mpongi

L'Éternel est mon berger, sala neti nga

Mbere mbere ta nzingi na ma nzingi

Tokoma kozela toyembama na kebo

Hm nzinzi ya soni alekana na ebembe

Soso amelaka mbuma ekoki na mongongo naye

Moto akoki kokosa baye bazoyoka ye

Jamais akoki kokosa conscience naye mei

Ah nga malelisa eh makanjulu njungungu

Y'a ngai nini eh, bomoyi ezali se moko

Mpate y'a Nzambe limbisa masumu ya mokili eh

Prends pitié de nous loin de toi il n'y a point de salut

Ah nga ah mwana mama

Sopa mopanga ebandaki na ngai te eh

Chérie sala nga tout latisa nga ata zigida

Kasi komekisa ngai jamais na mbanda

Kimbundi ezali moko ndenge ya kokanga

Esala différence ya kondo ye na kondoko

Ndako bolingo ezalaka soki maniolo

Ekoti par la porte, bolingo ekokimaka

Par la fenêtre, amour eboyaka ngélele

Subu ya bolingo batiaka ata mayebo

Ah ah ah mwana mama

Saddama aleli eh na palasi de marbre

Mère Dalí

Libala bosembo

Oyo ya bango

Hm chérie ayebisi nga azali naun elenge

Solo y'a mabele na monoko nanu esili te

Na bomwana eh poso ya chérie nga balinga

Mama azalaki kosukola yango na mzyi ya malala

Pe mafuta nzoyi chérie nanga magnétisme

Y'a nzoto naye eleki ata oyo ya rayon X

Natangaki soyi soki apesi mokongo

Allure ya chérie nanga eleki ya Naomi Campbell

Nazuaka nguangua eh soki atali na miso

Formule ya bien aimée eleki ya Ophelie Winter

Ah ah ah nga mama

Antoine aleli bolingo na sima ya lopango

Na lindanda na maboko

Kimia eleki sozacom na tour Eiffel na molayi

Toyaki na biso eh na rythme ya kwaya

Totumbolaki moto te a gauche ni a droite

Pourquoi échec ya moto ezali parent pauvre

Pourtant réussite ya moto a plusieurs papa

Moto soki aza na nzala akoluka bileyli eh

Soki aleyi atondi bileyi ekomi eloko pamba

Nguma aloba moto malamu azali te

Yango toujours moto alukaka koboma nguma

Mbere mbere ta nzingi na ma nzingi

Tokoma kolela toyemba na nkebo

Soki mbongo ezalaki solution ya makambo

Mbele Ombembe akomela ata bonne année te

Moto ya pusu kutu azanga na ye ba millions

Pourtant azanga te moto oyo akolekaka ye

Bizueli ya mokili kowela eza na Tina te eh

Mabe nde liwa eh, la vie ezali tchaki rumba

Kozua mbongo ezali nango jeu moke

Kasi Zala mayele eya kokima yo te

Presque rien sur presque tout

Ya ngai nini ebandaki na nga te

Mokili ya Nzambe ezali na yango mindondo te

Moto ye moko a compliqua la vie naye

Moto soki azangi akoluka azua mbongo

Soki azui mbongo akomi koluka bolingo

Tokutaka bolingo evandi na yango swi

Tobazaka toleki yzngo na molayi

Soki etelemeli biso oyo suka pitopale

Tokomelaka yango ata na lipeka te

Ah ah ah bana mama

Wake up yango oyo eye na esprit ya bien

Nani atombola mosapi ye nde innocent eh

Masumu ya mokili ezali affaire naye te

Toza biso tout na kati ya masuwa se moko

Nani aza se na bâ qualité pe azanga défaut

Nzango na kede oh nani abetaki te

Pourtant moko te aluka ayeba mokeli na yango

Ah nga malelisa maka njulu njungungu

Wake up eye nango na esprit ya bien

Ahh ah ah mwana mama

Biso na bino eh na esprit ya bien

Ahh ah ah mwana mama

Sopo mopanga eh, ahhhhhhh

Lyrics Submitted by Emmanuel Sekwat

Enjoy the lyrics !!!