damnlyrics.com

Telema na mona kembo (feat. Sandra Mbuyi)

(Refrain)  

Telema ngai mpe na mona kembo na yo

Telema motema nga esepela Yesu

Telema liloba na yo ekokisama

Biso totatola to yemba y'ozali Nzambe

(Couplet)

Y'olobaki basi bakufela mibali, 

Propriété privée na yo moto asimba te

Bana bitika, yonde papa na bango

Tala baza kolela , yo lisungi oza wapi

Telema libota eza kozela yo lisungi 

(Couplet)

Mwasi oyo baloba amela milangi akobota  te

Yo mopesi mabota ozali wapi

Anne abelelaki yo, opesaki ye Samuel

Mobotisi ya bikomba Yesu telema

Yesu telema yaya telema 

 

(Coda)

Ah Yesu eh

Na mona kembo na yo

Lyrics Submitted by Junior Mamay

Enjoy the lyrics !!!