Sandoka - Franco, Sam Mangwana & Le T.P.O.K. Jazz
| Page format: |
Sandoka Lyrics
Nasengi testament ya bolingo bapimi ngai x2
Bapesi ngai mokanda oh na butu, balobi ngai natangaka ooh!
Balobi chérie ngai natangaka ooh!
Namituni ii
Nsango nini ngai namema mama?
Yakopimela ngai bolingo nakati ya sani ooh
Conscience ya moto ebeba na bolingo eeh
Ngai ko nalingaka vité-vité oh
Bopesa ngai mungua ya basenzi ooh
Mòto alingaka mòto eeh
Ee mwana mama
Bokomema nde ngambo eeh
Ee mwana mama
Botika tolingana, tokosala bino soni te.
Botika tobalana, lokumu ya mama mpe mwana eeh
Bokomema nde ngambo eeh
Ee mwana mama,
Soki bopekisi nga Sandoka
Ee mwana mama,
Bokokamwa ndenge nakozala soki likambo bino bokoloba,
Bokokumba nde ngambo ee, fauté na ngai te ya lamulu eeh
Bokopanza makita eeh
Ee mwana mama
Likolo ya Sandoka
Ee mwana mama
Ata ndobo nga nakomela nakoma mbisi oo ooh
Boteka nga balia, ngai nazanga ooh…
Bokokumba bozito eeh
Ee mwana mama
Likambo ya bolingo eeh
Ee mwana mama
Bolingo bapekisaka te
Bapesaka ntoli bovanda
Bokoboya bokoboya tokokenda nameka nga na Sandoka
Likambo elandaka mòto eeh
Ee mwana mama
Elandi bolingo eh
Ee mwana mama
Botika nalinga, ezali mbala ya liboso
Ee mwana mama
Botika nalinga, noki te bokozanga mwana eh
Bokokangisa bato eeh
Ee mwana mama
Likolo ya bolingo eh
Ee mwana mama
Botika tolingina, ekoswa bino wapi?
Botika tolingina, lokumu ya tata mpe mwana eeh …
Lyrics Submitted by KM